Madilu - Voisin lyrics

Published

0 3149 0

Madilu - Voisin lyrics

Na sala yo nini eh, Voisin na ngai? Na defa eloko nini eh Epayi na yo? Papa, na bomela yo nani eh Na famille nayo? What have I done to you, My neighbour? What have I borrowed From you? What trouble have I caused In your family? Tata oyo, Yo motema mabe eh. Voisin na ngai, motema mabe. Ye ko mokhristu. Aloki mwana ya bato Eyenga nyoso Na ndako ya Nzambe. Lelo oyo, Bakangi ndoki na quartier. Ale mwana ya bato, tata oyo. You are a hater. My neighbour, you are a hater. He is a christian. He has cursed someone's child Every Sunday, he goes to church. Today It is found by neighbours that he is a witch. He has sacrificed someone's child, this man. Simetiele ba sala po na biso nyoso. Lopitalo ezali po na biso nyoso Ah nga olukela nga makambo, Po na nini eh. Tata oyo Yo motema mabe eh Luka vie nayo. Tika ngai eh. Voisin eh Motema mabe boye. Nyboma, talela ngai voisin oyo. Mosala ko funda ngai Ti na mosala, papa. Ba longola ngai Na mosala eh. Graveyards are for everyone. Hospitals are for everyone. Why do you want me to be in trouble? Hey Mr, You are a hater. Take care of your own life. Leave me alone, Neighbour, Such a hater. Nyboma, look at this neighbour. He is reporting me At my job So that I can lose My job. Chorus: Lofundu ya nzinzi esukaka se na kombo eh. Mabele oyo to nyataka ezali po na nga na yo te. Nzambe, Nzambe soki lifelo ezalaka, Zikisa nga moto ya liboso mawa. Mbanda asepela. Nzombo Faustino aziki. Na tango ya kala to zalaka ko kata ba kisi. Lelo ekoma moto nyoso bible na maboko. (Yaka eh) Yaka Yesu soki suka ya molongo, Yebisa nga na milengela Il parait na komi mobange. Ngai mokhristu na yo A fly's pride ends by a broom. This earth that we stand on is not ours. God, God, if hell exists, Burn me first So that my rival can be happy That Nzombo Faustino is burnt. Back in the days, we used to believe in witchcraft. Today everyone is bible and prayers (Come) Come Jesus if it is the end of the world, Tell me so that I can get ready. Maybe I am too old. I am your believer. Voisin Yo motema mabe eh. Au lieu odebrouille vie na yo, Kaka ko funda bato. Mosala ko langwa Na tongo ba monaka yo osambelaka. Nzoka motema nayo, etonda mabe eh. Voisin eh, luka vie na yo. Tika lokuta. Tika ko landa vie ya bato. Voisin na ngai, yo motema mabe. Ama Mpika landa ye. Neighbour You are a hater. Instead of trying to improve your life, You are reporting people. You are getting drunk. Every morning people see that you are praying. But in reality, you are full of anger. Neighbour, mind your own business. Stop lying. Stop worrying about other people's lives. My neighbour, you are a hater. Ama Mpika, chase him. Chorus: Lofundu ya nzinzi esukaka se na kombo eh. Mabele oyo to nyataka ezali po na nga na yo te. Nzambe, Nzambe soki lifelo ezalaka, Zikisa nga moto ya liboso mawa. Mbanda asepela. Nzombo Faustino aziki. Na tango ya kala to zalaka ko kata ba kisi. (C'est vrai) Lelo ekoma moto nyoso bible na maboko. (Yaka eh) Yaka Yesu soki suka ya molongo, Yebisa nga na milengela Il parait na komi mobange Ngai mochristu na yo A fly's pride ends by a broom. This earth the we stand on is not ours. God, God, if hell exists, Burn me first So that my rival can be happy That Nzombo Faustino is burnt. Back in the days, we used to believe in Witchcraft (It is true.) Today everyone is bible and prayers (Come) Come Jesus if it is the end of the world, Tell me so that I can get ready. Maybe I am too old. I am your believer.