Koffi Olomide - Gb gros bebe lyrics

Published

0 513 0

Koffi Olomide - Gb gros bebe lyrics

Paroles de la chanson GB Gros Bebe : Oui oui oui gros bébé, GB, eza yo! nasalel'o porte bébé hein! Ekila monganga soki apesi ngayi Ya koliyaka mungwa Ekosala rien Regime, docteur soki a decider Namelaka ti ezanga sukali Probleme eza te Kasi soki po nga nabika Monganga apekisi nga kolinga yo Wana aponeli nga liwa eh Soki okotia tembe na amour na nga, meka kokoma koka Okomona nga nakopusa velo na yo Adelina Hum ba libanais basilisa Biloko nyonso na ko imiter Kasi balembani ko reproduire beauté na yo Adelina Mwa mbuyi na nga Adé! Lokola kitunga eboyaka wenze te ee Manso alobelaka nga ezalaka oui oui oui oui Po na lova ye, nalela ye fou ouhhhh Botika nga nalala nayino na bolingo oyo Ti tango nakosutuka! Nayeba mabe na ye, nga moko oooo Hum Nayina vraiment idée ya kokabwana na ye Lokola mobola ayina kotika Mokili'ango malgré ba mpasi na yango ooo Façon nalela ye vraiment boyoka Nga ata soki nzambe asalaki ye fulu Nalingaki nasimba bisimba simba Nakoma fou, nabonga na fulu Nga ata soki nzambe asalaki ye medicament Ndele losambo na nga epa ya yawé Akomisa nga seko moto ya bokono Po namela Adé, a vivre o nte ya nga Nga ata soki un jour akomi prisonnière Nayekola ki avocat po na defendre ye Azalaka vraiment gros bébé, gros bébé na nga nalova ye , Adelina Nasalela ye vraiment porte bébé Ya mikolo, nga namema ye na motema Nazalaka lokola mwana moke Oyo mama abeti egboko Akolelaka toujours kaka na kombo ya mama Gros bébé, Adé na nga (maman) Gros bébé, ah zonga eh Botikela nga ye Adé oyo ya mobimba vraiment, il faut omona moto koi, ah! Adé motema na nga ah!!! Bolingo na yo eloni nzete na motema na nga Ekomi kobota ba mbuma elengi Lifel'oyeli nga, yak'obwakela ng'ata soyi Avant nazika nazala delivrer Adé Chemin de la croix, o ressusciter nga Adé ozalaki locataire na motema Lelo osimbi fungola, okomi proprietaire Dans le pa**é nazalaki n'etumba na ba nzoï Lelo nakomi olia mafuta elengi Motema na nga, ozongisi nga envie Kitoko na yo e vaccina nga contre tout autre amour Carrière ya bolingo esuki epa na yo Kitoko na yo etia garde-fou na pont d'amour na nga Moyen nakweya na se ikele ve Adé Marie sylvie, he he he olandeli makamb'ango!!!! "Nzete mosusu, miso okokanisa lokola ekawuka.Nzoka maboko eyebaki kosala nango te" Adé ozongisi nga envie, na desir, na elengi ya ko vivre Eh ba tikela nga temps ko, nini ango! Bolingo ezalaki mobesu Lelo ekoti mayi, mafuta, mungwa Ekomi elengi Ampleur ya bolingo ebuki mikili E deplacer ba ngomba Bolingo ekomi extra love Motema na ga, ozongisi nga envie Motema na nga, gros bébé na nga Motema na nga, o ressusciter nga "Eh bana mama boyoka lisapo Jour mosusu, bana moko ya mike baye na tongo, na ba 6h moins trois Baye koyebisa nga, balobi oh grand mopao MM, vieux ya jolie mayala Ba soeurs moko baza ba coté kuna, oyebi kaka ba soeurs oyo bazalaka ba genre ya moi ba jalouse wana.Basali mwa likelemba na bango.Ba mosusu baza ba mokolo Balobi mais ba mosusu , vieux, ba mokuli, ba mosusu, vieux,ba mogoli Sikoyo likelemba yanga kombo kaka GB. Oh yo kaka genre, il faut otika kaka soeur wana. Nga sikoyo nalobi ah soeur wana aza bien,tendance très très très fort Nasalaka erreur, nalekaka na nzela moko oyo ye azalaka kolela. Oyebi kaka ndenge balobaka que babetaka lisolo ya sapatu te esika moto akatana lokolo azali. Ba comprendre nga, ba tika nga nazika soki nakozika" Ayiiiii!!!! ehhhhh!!! Adé ozalaki locataire na motema Lelo osimbi fungola Okomi prioprietaire Bolingo ezalaki mobesu Lelo ekoti mayi, mafuta, mungwa Ekomi elengi ehhh Nazalaki obunda na ba nzoï Lelo nakoma oliya mafuta elengi Bolingo na yo eloni nzete na motema na nga Ekomi kobota ba mbuma elengi